Les seules limites sont celles que nous nous imposons

Accueil > Mon côté fun > Ma musique > "Mazé" de Tabu Ley

Tabu Ley Rochereau

"Mazé" de Tabu Ley

vendredi 24 octobre 2014, par Dridjo

Oui, je suis à toi
Chérie pense à moi
I love you
baby touch me

Rochereau Tabu ley - Mazé

Kitoko étondi yo nzoto Mazé, na mona moto nini na méka na yo té
Motéma na ngaï ékangami motambo na yo, ba pékisa ba tikala na nsoni
Elongui nzoka esangisa ba charme Mazé, O léka nzéla bato bas oba ko baluka

Kitoko étondi yo nzoto Mazé, ba koma ba yemba nioso na mona té
Mobimba ya moto étonda nzoto na élégance, ézali likambo ban aya mibali ba kufa

Ba ndéko bo tala Mazé na lineti, léki ya Mopatipi, Mazé
A léka, mibali mitéma mi ko béta, Mwana ya mama Yité, Mazé,
Ba ndéko bo tala Mazé na lineti, léki ya Sharufa, Mazé
A léka, mibali mitéma mi ko béta, Mwana ya mama Yité, mama

Refrain: (x2)
Bolingo ngaï na yé to nkaga na libanga, to bwaka na ébalé ya Zaïre
Masuwa ma tinda kala ma bima té ooh, ébima sé libanga ya bolingo na biso

Kitoko étondi yo nzoto Mazé, O nguénga mafoufa ya wolo na nzoto
Mobimba ya moto étonda nioso na beauté, O mbanda lidzaka, miso na suki
A bwaka lokolo, oyo ndè suka ya démarche, A luka Kinshasa mobimba bato ba kufa

Refrain: (x2)
Bolingo ngaï na yé to nkaga na libanga, to bwaka na ébalé ya Zaïre
Masuwa ma tinda kala ma bima té ooh, ébima sé libanga ya bolingo na biso

Accéléré:

Mazé, ba kanisi ngaï na kanga yo na ndako ya Nganga
Mazé, ba silisi ngaï loposo épayi na mélaka
Mazé, ba lobi ké ngaï na koki yo té na bolingo
Oooh Mazé, na koki na yo, na lingiu sé yo
Suka sé na ko bala yo, na ko lésa yo

Mazé, ba luki ba kimisa yo na moto ya mosolo
Mazé, ba longoli ngaï mosala na kufa na nguélélé
Mazé, ba koséli ngaï makambo na kota na wélé
Ooooh Mazé, na zali na yo, na kotika té
Suka sé ba ko kamwa ngaï, na ko bala yo

Mazé, ba bakisi yo lokas aya rouge na élongui ya 5 ans,
Mazé, O tali bango mpaba mpo makasi ya bolingo na ngaï
Mazé, O lobélaka ngaï nioso oyo mbango ba ko loba contre ngaï
Oooh soni, ba téli les yeux, ba téli les yeux,
Suka sé ba téli les yeux, ba téli miso


Voir en ligne : Mazé - Youtube