Les seules limites sont celles que nous nous imposons

Accueil > Mon côté fun > Ma musique > Affaire Kitikwala

Simaro Massiya Lutumba

Affaire Kitikwala

mercredi 29 septembre 2010, par Dridjo

Toutes les versions de cet article : [français] [Lingala]

Na bolingo ya sé mibali ba lingi sé basi ya mobulu, oyo a ko niokola yé, yé a kolinga yé mingi
Ekomama bongo, basi ba linga mabala ya moniokoli, oyo a ko salisa yé, yé a ko kamata yé ndé zoba
Na bolingo ya sé ékomama bongo, moto yo okolinga, yé a kolinga mosusu
mama ééé

Litambwé, Tata yéla ngaï lindada na yoki posa ya ko yemba

hoo na ko léla la vie, pasi ya mokili

Litambwé masasi, Tata …
Litambwé Luntadila, Tata simba ngaï to kenda, na mokili to zui té

Hoo, to ko zua kaka na paradiso

Sambelaka, ata ko na pokua liboso ya ko lala, sambelaka Nzakomba
Sambelaka, ata liboso ya ko mbenda mua kopo, sambelaka Yahvé

Na mokili ya nsé, Nzambé a kaba ba chance, a kaba bilongi
Na mokili ya nsé, égalité likélé vé
Na mokili ya nsé, ékomama sé bongo, égalité ezali sé na zando mpé na tango ya liwa
Ko lélaka té hooo

Na bolingo ya sé, mibali ba lingi sé basi ya mobulu, oyo a ko niokola yé, yé a kolinga yé mingi
Ekomama bongo, basi ba linga mabala ya moniokoli, oyo a ko salisa yé, yé a ko kamata yé ndé zoba
Na bolingo ya nsé ékomama bongo, moto yo okolinga, yé a kolinga mosusu

mama ééé

Mpongi na kiti, ndéko tika nanu ko léla,
longola loboko na litama éé
longola loboko na litama Kiliko,
longolo mpizoli na miso Amisi,
Longola liboko na litama, mpo na ko luka la vie, mpasi ya mokili

Ngaï na zalaka na zua, na tékéla basi ya mabala
Na zalaka lolendo, na tikéla bayé ba zua kitoko, Kitoko eloko paba, kitoko nsé mabélé
Na zalaka lokuta na tikéla ba tailleurs na ba ménuisiers hoo, mama éee
Na tikéla mba esquiveurs, na ba mécaniciens lokuta na ngaï
Na kindéla mba technicien ya ba télévision ya ba frigo
Na kaba lokuta na ngaï na ba escrocs, na ba nganga ya kisi ééé
Mama éééé Litanbo, sala lokola ngaï

Na mokili ya nsé, élokomoko to ko mpésa toli:
Ata O zangi nioso kasi ko zanga mbéto té
Somba mbéto ya kitoko, mokolo yo’ oko kufa ndéko ééé, soki mbéto ya kitikwala, ébembé na yo é ko yoka soni
Kinshasa makambo, na ba matanga to monaka mpé makambo
Ba susu ba koléla, ba susu ba ko tonga mbéto ya mowé, surtout soki O yébanaka
Mokili hoo makambo mama, mokili hoo makambo mama éé

Na la vie élingi boyé, la vie élingi boyé:
Na la vie buka mikua ntago ozali na bomoyi, sépélisa nzoto ntango ozali makasi, lobi ntango oko kufa mama…
Na la vie ba loba boyé, ba Koko ba loba boyé:
Na la vie, yéba talo ya mbisi ntango tata azali na bo moyi, yéba talo ya kwanga natango mama azali na bomoyi, lobi ba ko kufa

Na mokili ya nsé "on ne vit qu’une seule fois",
sakana libéla, soki O zui mwa ntambo
Mélaka libéla, "on ne vit qu’une seule fois"

Yaka to lingana, tala ntango ezali ko léka, liwa éko zéla,
Mabélé éko ponaka nsé éloko ya kitoko, mabélé A leili biso mwa Lélésé
Mabélé, bana ya Boméka ba zali nana ko léla Mujinga …




Voir en ligne : http://www.youtube.com/watch?v=Oky-...